Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/11 lok. 13
  • Makambo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baninga ya motema bazali mingi te
  • Masuwa ya bangi na nse ya mai
  • Litomba ya kolya elongo na libota
  • Bilei bityami na kɔ́pɔ bipesi litatoli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bóyekolaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe na libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Lamuká!—2011
g 4/11 lok. 13

Makambo ezali koleka na mokili

Na kati ya bato ya Allemagne oyo bakokisi naino mbula 40 te, kaka moke mpenza (na nse ya 1/4) bandimaka ete ezali malamu kobondelaka na bana mbala na mbala, mpe na kati ya baoyo bakendaka na ndako-nzambe, kaka bato moke (4/10) bamonaka ete ezali na ntina.​—APOTHEKEN UMSCHAU, ALLEMAGNE.

Mobali moko oyo apesaka mai na ye ya mibali mpo ebotisa basi, azalaki na maladi ya motema oyo minganga bamonaki te, mpe yango esalaki ete bana 9 na kati ya bana 24 oyo eyebani ete bazali bana na ye bázwa maladi yango. Mpe moko ya bana yango, akufaki na maladi ya motema ntango akómaki na mbula mibale.​—JAMA, ÉTATS-UNIS.

“Bato mingi ya Russie (koleka 50%) bandimaka ete kanyaka ezali bisika nyonso mpe ekosila ata mokolo moko te.”​—RIA NOVOSTI, RUSSIE.

Baninga ya motema bazali mingi te

Zulunalo moko ya Londres (Daily Telegraph) elobi ete: “Moto mokomoko ya Grande-Bretagne azali kaka na baninga misato oyo akoki kotyela motema.” Ankɛti moko emonisi ete na kati ya bantina oyo esalaka ete moto abungisa “baninga soki 36 na boumeli ya bambula,” ezali “kozala na makambo mingi ya kosala,” ‘kokabwana mokemoke na baninga’ mpe na kati ya bato mingi (43%) oyo batunaki balobaki ete ezali “kozanga koyokana . . . mpe kolinga lisusu kosolola te.” Bato pene na ntuku mibale likoló na mokama (20%) oyo batunaki bango, balobi ete bayebisaka makambo na bango epai ya baninga ya mosala mpo “bazali na moto mosusu te ya koyebisa ye basekele na bango.” Molobeli ya baoyo basalaki ankɛtɛ yango alobaki ete: “Okoki kokóma te moninga oyo abongi kotyelama motema kaka mpamba boye.”

Masuwa ya bangi na nse ya mai

Bato ya Colombie oyo batɛkaka bangi basalelaka mayele moko ya makasi mpenza mpo na kokɔtisa yango na Amerika ya ntei, na Mexique mpe na États-Unis. Kobanda mobu 1993, bakonzi ya Colombie bamonaki bamasuwa soki 42 oyo etambolaka na nse ya mai, oyo ememaki bangi mpe bakangaki yango. Bamonaki mpe bisika ebele oyo basalaka bamasuwa yango. Atako masuwa yango oyo etambolaka na esansi ekokaka te kozinda, kasi ezalaki mpasi komona yango na aparɛyi babengi radar. Bamasuwa yango mosusu ekoki kosala kilomɛtrɛ 3 200 mpe ekoki komema bangi tone kati na motoba mpe zomi, oyo ekoki kobimisa mbongo badolare milio moko.

Litomba ya kolya elongo na libota

Ankɛtɛ moko oyo euti kosalema na Finlande, emonisi ete na kati ya bana oyo bazali na mbula kobanda 14 tii 16 oyo batunaki, kaka ndambo nde balobaki ete balyaka esika moko na mabota na bango. Ankɛtɛ yango emonisi ete na bandako mingi, batyaka biloko esika moko te mpo bato bálya elongo. Nzokande, bana bazalaka na mposa ya ntango ya ndenge wana, mpe balingaka ete esalemaka mbala na mbala na mabota mpo bamiyoka malamu. Zulunalo moko (Helsingin Sanomat) elobi ete ntango batunaki bana soki balingaka ete baboti na bango básala nini, eyano na bango ezalaki polele ete: “Kolya malamu na libota mobimba mpe kozala na moto oyo azali na ntango mpo na koyoka yo.” Kolya elongo na libota esalisaka bilenge mingi mpo bázala na makanisi oyo ebongi. Lisolo yango emonisi mpe ete mbala mingi, “bilenge oyo balyaka elongo na libota bazalaka mayele na kelasi, mpe ezalaka mpasi bámɛla makaya to masanga; kutu, batungisamaka mingi te na makanisi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto