“Ekoki kosalema te!”
MOBALI moko na engumba New York (Etats-Unis) alobi ete: “Mwana na ngai ya mobali, Jonathan, akendeki kotala baninga na ye mosika na mwa bakilomɛtɛlɛ. Mwasi na ngai, Valentina, alingaki te ete ye abima mpo na kokende epai ya baninga na ye. Azalaki ntango nyonso kobanga mingi mpo na botamboli ya mituka na nzela. Kasi mwana azalaki kolinga mingi mosala ya kobongisa biloko lokola baradió, mpe baninga na ye bazalaki na ndako ya mosala epai kuna akokaki kokólisa boyebi na ye na kosaláká mosala yango. Nazalaki na ndako na ngai na kartyé oyo ebéngami ete West Manhatan, na New York. Mwasi na ngai akendeki kotala bandeko na ye na Porto Rico. Namilobaki ete: ‘Mosika te, Jonathan akozonga. Na nsima, ngonga ya ekuke ebɛtaki. ‘Nandimisami solo ete wana ezali ye.’ Ezalaki ye te. Ezalaki nde bapolísí mpe basáli na lopitalo. Mokonzi ya bapolísí atunaki ngai ete: ‘Oyebi soki búku oyo ya mokumbi motuka ezali ya nani?’ ‘Ee, ezali ya mwana na ngai Jonathan.’ ‘Tozali na nsango ya mawa mpo na yo. Likámá moko liuti kosalema, mpe . . . mwana na yo . . . mwana na yo akufi.’ Eyano na ngai ya liboso ezalaki ete: ‘Ekoki kosalema te!’ Likambo wana ya mpasi lizokisaki biso mpota na motema, oyo esili naino te, atako bambula mingi esili koleka.”
Tata moko na engumba Barcelone (Espagne) akomi ete: “Na kala, na Espagne ya ba 1960, tozalaki libota moko ya esengo. Tozalaki, ngai, mwasi na ngai, María, mpe bana na biso misato, David, mibu 13; Paquito, mibu 11; mpe Isabel mibu 9.
“Mokolo moko, na sanza ya Mársi 1963, Paquito ayaki na ndako nsima ya bobimi kelasi na komileláká ete, azali kooka mpasi makasi na motó. Tomitungisaki mpo na koyeba nini oyo ekokaki kozala ntina na yango—toumelaki te na koyeba ntina yango. Ngonga misato na nsima, akufaki. Mpota oyo azokaki kati na bɔɔngɔ́ nde eyaki kotya nsuka na bomoi na ye na lolenge ya pwasa.
“Paquito akufaki esili koleka mibu 30. Atako bongo, mpasi makasi ya liwa yango ezali na biso naino kino lelo. Ekoki kosalema te ete baboti bábungisa mwana mpe bázanga mpenza komiyoka ete babungisi eloko moko kati na bango—ata soki ntango boni eleki to mpe ata motuya boni ya bana mosusu oyo bakokoka kobota na nsima.”
Makambo oyo mibale, oyo ya baboti bakufelaki bana, emonisi bonene ya mpasi mpe lolenge mpasi yango ekoumelaka na ntango moto akufeli mwana. Maloba oyo docteur moko akomaki ezali mpenza solo, ete: “Mbala mingi, liwa ya mwana moke ezalaka mawa mingi mpe epesaka mpasi makasi koleka liwa ya mokóló, mpamba te kati na libota, mwana moke azali ye oyo bamizelaka te na ntina na ye ete ákufa. . . . Kokufa ya mwana moke emonisi kobungisa bilikya ya mikolo mizali koya, kobungisa bikangiseli [mwana, bokiló, nkɔ́kɔ], kobungisa makambo . . . oyo masengelaki naino kosalema.” Mpe mayoki makasi wana ya kobungisa eloko ekoki mpe komonana epai na mwasi nyonso oyo akufeli mwana na nzela ya kosopana ya zemi.
Mwasi moko oyo akufelaki mobali alobi ete: “Mobali na ngai, Russell, azalaki kosala lokola mosungi monganga kati na esika etumba ezalaki na Mai monene ya Pacifique, na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Amonaki bitumba ya nsɔ́mɔ kasi abikaki. Azongaki na Etats-Unis mpe akómaki na bomoi moko ya kimya. Na nsima, akómaki mosakoli ya Liloba ya Nzambe. Wana akómaki katikati na mibu 60 abandaki kobɛla maladi ya motema. Amekaki kobika na yango na kosaláká misala na esika ya kofanda mpamba. Na nsima, mokolo moko na sanza ya Yulí ya mobu 1988, azwaki mpasi makasi na motema mpe akufaki. Liwa na ye epesaki ngai mpasi makasi. Nakokaki ata kopesa ye mbote ya nsuka te. Azalaki te bobele mobali na ngai. Azalaki mpenza moninga na ngai ya motema. Tolekisaki mibu 40 ya bomoi elongo. Sikawa namonaki lokola ete nakozala bobele ngai moko mpenza.”
Wana ezali bobele mwa moke ya makambo kati na ebele ya makambo ya mpasi oyo mazali kokwela mabota mokolo na mokolo kati na mokili. Lokola bato mingi oyo bazali kati na mawa bakoki koyebisa yo yango, na ntango liwa ekamati mwana na yo, mobali na yo, mwasi na yo, moboti na yo, moninga na yo, ezali mpenza oyo Paulo mokomi moklisto abéngaki yango ete “monguna ya nsuka.” Mbala mingi, likambo ya liboso oyo bato basalaka na ntango bayoki nsango ya mawa, ezali bongo koboya kondima, “Ekoki kosalema te! Nandimi te.” Mbala mingi, biyano ya motindo mosusu mpe ebimaka, lokola tokomona yango.—1 Bakolinti 15:25, 26.
Nzokande, liboso ete tótalela mayoki ya mawa, tika ete tópesa naino biyano na mwa ndambo ya mituna ya ntina. Liwa elimboli nsuka ya moto? Tozali na elikya ya komona lisusu balingami na biso?
Elikya ya solo ezali
Paulo, mokomi ya Biblia, alobelaki elikya ya kosikolama longwa na “monguna ya nsuka,” liwa. Akomaki ete: “Moyini oyo akobukana na nsuka azali kufa.” “Kufa akobebisama nyee.” (1 Bakolinti 15:26, NW) Mpo na nini Paulo akokaki mpenza kondimisama mpo na yango? Mpo ete asilaki koteyama na Yesu Klisto, ye oyo asekwisamaki longwa na bakufi. (Misala 9:3-19) Ezali mpe mpo na yango nde ntoma Paulo akokaki kokoma ete: “Pelamɔkɔ kufa eyaki na njela na moto [Adama], kosekwa mpe eyei na njela na moto [Yesu Klisto]. Jambi lokola na Adama yɔnsɔ bakokufaka, boye na Klisto yɔnsɔ bakozwa bomoi.”—1 Bakɔlinti 15:21, 22.
Yesu aokaki mawa makasi na ntango akutanaki na mwasi moko mokufeli mobali ya mboka Naina, mpe wana amonaki mwana na ye oyo akufaki. Lisoló ya Biblia liyebisi biso ete: “Wana ebɛlɛmaki ye [Yesu] na monɔkɔ na mboka [Naina], bajalaki komɛma mokufi na libanda, ye [mwana bobele moko, NW] na mama na ye, mama mpe akufeli mobali. Ebele monɛnɛ na bato na mboka bazalaki na mwasi elɔngɔ. Emɔnaki Nkolo ye, ayokelaki ye mawa, mpe alobaki na ye ete: ‘Lela te!’ Akɛndaki epai na sanduku mpe [asimbaki] yango, mpe baoyo bajalaki komɛma batɛlɛmaki. Alobaki ete: ‘Elenge mobali, nalobi na yɔ ete, sekwa!’ Mokufi afandaki mpe abandaki kosolola, mpe apɛsaki ye na mama na ye. Bato yɔnsɔ bayokaki nsɔmɔ mpe bakumisaki Njambe ete: ‘Mosakoli monɛnɛ abimi kati na biso!’ mpe ete: ‘Njambe ayei kotala bato na ye.’” Talá malamu lolenge nini Yesu aokaki mawa, na motindo boye ete asekwisaki mwana mobali ya mwasi mokufeli mobali! Kanisá naino likambo oyo yango emonisi mpo na mikolo mizali koya!—Luka 7:12-16.
Kuna, liboso ya baoyo bamonaki yango na miso na bango mpenza, Yesu asekwisaki moto, likambo oyo moto moko te akokaki kobosana yango. Ezalaki elembeteli na ntina etali lisekwa oyo asilaki kosakola yango mwa ntango liboso ya kosalema ya likambo oyo, kozongisama na bomoi awa na mabelé na nsé na “Likolo na sika.” Na libaku yango, Yesu alobaki ete: “Bokamwa na likambo oyo tɛ, mpɔ ete ntango ekoya wana yɔnsɔ bazali na nkunda bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.”—Emoniseli 21:1, 3, 4; Yoane 5:28, 29; 2 Pɛtɛlo 3:13.
Petelo mpe azalaki kati na bato oyo bamonaki lisekwa yango, bakisa mpe ndambo mosusu ya bayekoli 12 oyo bazalaki kotambola na Yesu kati na mibembo na ye. Bayokaki mpenza Yesu oyo asekwisamaki, koloba pene na libéké ya Galilai. Lisoló yango eyebisi biso ete: “Yesu alobi na bango ete: ‘Yaka kolia.’ Nde mɔkɔ na bayekoli ajalaki na molende kotuna ye tɛ ete: ‘Yɔ nani?’ Jambi bayebaki ete ajali Nkolo. Yesu ayei, akamati [limpa, NW] mpe apɛsi epai na bango mpe mbisi lokola. Oyo ejalaki mbala na misato emɔnani Yesu epai na bayekoli na ye nsima na kosekwa na ye na bakufi.”—Yoane 21:12-14.
Yango wana, Petelo akokaki kokoma na elikya makasi ete: “Njambe Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto ákumisama! Pelamɔkɔ ejali mawa na ye mingi, aboti biso lisusu ete tojala na elikia na bomɔi na njela na lisekwa na Yesu Klisto kati na bakufi.”—1 Pɛtɛlo 1:3.
Ntoma Paulo amonisaki elikya na ye ya motema wana alobaki ete: “Nandimi makambo yɔnsɔ masili kokomama kati na Mibeko mpe na basakoli. Najali na elikia na Njambe, oyo bato oyo mpe bandimi yango, ete lisekwa ekojala na bato na sembo mpe na bato na sembo tɛ.”—Misala 24:14, 15.
Na yango, bamilió ya bato bakoki kozala na elikya makasi ete bakomona balingami na bango kozonga lisusu na bomoi kasi kati na ezalela ya makambo oyo ekeseni mpenza na oyo ya lelo. Ezalela ya makambo yango ekozala ndenge nini? Makambo mosusu oyo matali elikya ya lisekwa mpo na balingami na biso oyo bakufá, oyo ezwi mobɔkɔ na yango kati na Biblia, ekolobelama na eteni ya nsuka ya mwa búku oyo, na motó ya likambo “Elikya ya solo mpo na bakufi.”
Kasi, tiká tótalela liboso mituna oyo okoki kozala na yango wana ozali kolela na mawa mingi mpo na liwa ya molingami na yo: Komonisa mawa motindo oyo ezali mabe? Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mawa na ngai? Lolenge nini basusu bakoki kosalisa ngai mpo nayika mpiko? Lolenge nini nakoki kosalisa basusu oyo bazali na mawa? Mpe oyo eleki mpenza, Biblia elobi nini na ntina na elikya ya solo mpo na bakufi? Nakomona lisusu molingami na ngai mokolo mosusu? Mpe epai wapi?
Kanisá likoló na mituna oyo
Mingimingi, bato basalaka nini soki molingami na bango moko akufi?
Yesu asalaki nini mpo na mwasi mokufeli mobali ya mboka Naina?
Yesu apesaki elikya nini na ntina na bakufi?
Mpo na nini Petelo mpe Paulo bakokaki kondimisama ete lisekwa ekozala?
Mituna nini mibongi na kozwa eyano?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
‘Tozali na nsango ya mawa mpo na yo. Likámá moko liuti kosalema, mpe . . . mwana na yo . . . mwana na yo akufi.’