Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 21:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe longola lisumu oyo atindaki Yuda básala na ndenge bazalaki kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ Manase asopaki lisusu makila mingi mpenza ya bato oyo bazalaki na likambo te,+ kino atondisaki Yerusaleme banda nsuka tii nsuka.

  • 2 Bakonzi 24:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 mpe lisusu mpo na makila ya moto oyo azali na likambo te+ oyo ye asopaki, bongo atondisaki Yerusaleme na makila ya bato oyo bazali na likambo te, mpe Yehova andimaki kolimbisa te.+

  • Yirimia 2:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Lisusu, bamoni na bilamba na yo bilembo ya makila ya milimo+ ya babola oyo bazali na likambo te.+ Nakuti yango te na esika makambo yango esalemaki, kasi nde na bilamba na yo nyonso.+

  • Yirimia 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 ‘Ya solo mpenza, miso na yo mpe motema na yo etyami na eloko mosusu te, kaka na litomba na yo ya mabe,+ mpe na makila ya moto oyo azali na likambo te mpo osopa yango,+ mpe na kobuba mpe na kobɔtɔla mpo omipesa na makambo yango.’

  • Ezekiele 9:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bongo alobaki na ngai ete: “Libunga ya ndako ya Yisraele mpe ya Yuda+ ezali monene mingi, mingi mpenza,+ mpe mokili etondi na makila oyo esopami+ mpe engumba etondi na kilikili;+ mpo balobi: ‘Yehova atiki mokili oyo,+ mpe Yehova azali komona te.’+

  • Ezekiele 11:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bato na bino oyo babomami, bokómisi bango ebele na kati ya engumba oyo, mpe botondisi babalabala na yango na bato oyo babomami.”’”+

  • Hosea 4:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Kolakela mabe,+ bokosi,+ koboma,+ moyibi+ ná ekobo+ epalangani, mpe misala ya kosopa makila ebakisami likoló ya misala mosusu ya kosopa makila.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto