Makatami ya molende mamemi matomba na mokili ya Suriname
SURINAME ezalaki “moko na Biyangeli oyo bizali na bozui mingi na mokili ya Antilles”, eyebisami na zulunalo internationale South. Na kotekaka na mikili mosusu biloko lokola bauxite, ba crevettes, loso, bitabe mpe contre-plaqué, mpe na lisalisi ya bamboka mosusu, bato 400 000 bafandi na mboka oyo kala eyangelamaki na Hollande bazuaki matomba na ntango moko ya bozui mingi koleka baoyo bazalaki zongozonga na bango.
Kasi kobanda mobu 1980 nkita ekweyaki mabe. Na esika na bozui ezalaki nde bozangi, mpe sikawa okoki komona mbala mingi milongo na bato na bisika na kosombela biloko. Na 1980, mpo na ebandeli na etumba na batomboki, bafandi na est na Suriname soko 10 000 bakimaki kino mokili ya Guyane française, mboka oyo ezali ndelo na Suriname, epai babandaki bomoi mosusu kati na ba camps na bato oyo bakimaki bitumba. Na ntango yango, batomboki bayangelaki biteni monene ya zamba, epai bato na ekolo babengi Bosnegers soko 50 000 bazalaki kofanda, mpe kotambola na bamboka ekomaki likama. Engebene zulunalo South, bambongwana oyo ekweisaki mboka. Ezalela oyo ekweisaki mpe mosala ya ba Témoins de Jéhovah? Te, nkutu ekolisaki yango. Na yango, motuya ya batemwe elekaki longwa basakoli 920 na 1980 kino koleka basakoli 1 400 na mikolo oyo. Na avril 1989, ba pionniers auxiliaires bazalaki 338-elingi koloba pene na ndambo na minei ya Batemwe oyo batangamaki na sanza wana. Kasi, mapamboli oyo makokisamaki na nzela ya molende, bosembo mpe bolingo oyo Batemwe bamonisaki kati na komekama. Tala mwa bandakisa na makatami ya molende oyo, na mikolo mileki, bamemaki matomba mingi na mokili Suriname.
Ekateli na ye ebikisaki bomoi na ye
Lumey Hoever, policier moko ya makasi oyo azalaki na mbula soko ntuku minei mpe Témoin de Jéhovah, azuaki ekateli ya kolongwa mosala atako makambo matali nkita mazalaki mabe. Mpo na nini? Totika ye moko alimbola:
“Nsima na kotanga lisolo na Mosenzeli oyo ekebisaki biso mpo na makama oyo mazali mpo na kozala na mondoki mpo na kobeta bato mosusu, namonaki ete nasengelaki kotika mosala na ngaia. Kasi nakakatanaki, mpo ete nasengelaki kokokisa bamposa na mwasi na ngai mpe bana na ngai. Kasi, wana nazalaki kolekisa ntango mpo na kozwa ekateli, lisosoli na ngai ezalaki kotungisa ngai mingi koleka. Nazalaki komiloba: ‘Soko lisangá ya Jéhovah ezali kotinda ngai kotalela malamumalamu bolamu mpe mabe ya mosala lolenge oyo, ntina ya solo esengeli kozala.’ Na yango nazuaki likatami na ngai na janvier 1986.”
Kasi mokonzi na ba policiers alingaki te ete moklisto oyo alongwa; kino alakaki kotinda ye na Tamanredjo, esika oyo bato mingi bazalaki kolinga kozwa, pembeni na kapitale. Kasi Lumey akangamaki na ekateli na ye. Akomaki mokanda na ministère ya la Police mpo na kolimbola bindimeli na ye mpe kosenga balongola ye na mosala. Azuaki eyano na avril 1986 ete: ‘Lisengi na yo endimami!’
Lumey aumelaki te na kozua mosala mosusu, na kompanyi oyo ezali kotalela ba zamba. Lifuti ezalaki malamu te, kasi azalaki na ntango mingi mpo na kokende na makita ya lisangá elongo na libota na ye. Sanza zomi elekaki. Na nsima, mokolo moko, Lumey mpe ndeko na ye bazalaki kozonga na ndako na bango nsima na kolekisa moi mobimba na bilanga ya ferme ya libota. Totika Lumey ayebisa biso oyo elandaki:
“Na kobelemaka na ferme, namonaki mibiali mibale baoyo balataki bilamba ya kopasukapasuka mpe ya salite, bazalaki na kitambala na moto. ‘Kon dja (Yaka awa)’, babengisaki ngai na monoko ya suriname. Wana nazalaki kokende epai bango bazalaki, mobali ya misato abimaki, mondoki na lipeka. Nayebaki ete bazalaki batomboki.
“Batalaki ngai kobanda na moto kino makolo. Nsima moko na mibali oyo bazalaki na kitambala na moto agangaki ete: ‘Nayebi ye. Azali policier!’ Namonaki bilongi na bango ekomaki ya nkanda. Na mwa ba secondes, totalanaki na miso. Nakangaki pema. Nsima nayokaki mwa makelele. Clic, clac: mobali ya misato azalaki kotia masasi na mondoki na ye. Na malembe, atalisaki yango na ntolo na ngai, amibongisaki mpo na aboma ngai. Nangangaki makasi: ‘Kobeta te! Bomikosi. Nazali lisusu policier lisusu te.’
“Ezali nde ntango yango namonaki nsima na ndako batomboki mosusu koleka zomi bazalaki na mindoki. Moko na bango apusanaki, mbinga ya mobali, alataki liputa mpe bimemeli mibale na masi na ntolo na ye oyo ezalaki polele, mondoki na loboko na ye. Alobaki: ‘Olobi ete ozali lisusu policier te? Mpo na nini?’ Mbala moko napesaki eyano ete nazali Témoin de Jéhovah, na kolimbolaka ete: ‘Batemwe basimbaka mindoki te, na yango natikaki mosala na ngai ya policier. Sikawa nazali kosala na kompanyi oyo ezali kobalela bazamba.’ Mpe nabakisaki: “Tokotaka te na makambo nyonso ya politike.’
“Ntango nalobaki ete nazali Témoin de Jéhovah, elongi na ye efungwamaki mwa moke. Nazalaki komituna: ‘Akondimela ngai?’ Na ntango yango, leki na ngai akomaki. Mobali oyo alataki liputa, oyo amonanaki lokola mokonzi na bango, abandaki kotuna ye. Ntango ndeko na ngai andimisaki maloba na ngai, emonanaki ete asepelaki. Apesaki etinda epai na motomboki mosusu ete: ‘Saka yu gon! (Kitisa mondoki na yo)’. Motema ekitaki. Nasalaki libondeli oyo na Nzambe: ‘Merci, Jéhovah, lokola obateli ngai!’”
Nsima ya mwa mikolo, Lumey azuaki nsango mosusu ya mawa ete bato bayebani te oyo bazalaki na mindoki babomaki bapolisié misato na esika ya mosala na Tamanredjo, esika oyo mokonzi na ye alingaki kotinda ye. Lumey, alobi: “Soki nayokaki te toli ya Mosenzeli, mbele lelo nazali lisusu na bomoi te”. Mpe abakisi na botondi nyonso ete: “Ya solo Jéhovah azali kobatela basaleli na ye.”
Bolingo epusaki ye asalisa bandeko na ye
Na octobre 1986, bitumba ebimaki kati ya basoda to mampinga ya Leta mpe batomboki na mboka Moengo, engumba oyo epai bazali kotimola bauxite. Frans Salaoema, moto ya ekolo Bosneger na mbula koleka ntuku minei, asengelaki kozua likatami. Na nsuka, ye, na mwasi na ye oyo azalaki na zemi, bana na bango nsambo na bafandi mosusu na engumba bakimaki na kolanda nzela kati na zamba mpe kokatisa ebale Maroni kino mokili ya Guyane française mpo na komibomba.
Ata bongo, Frans azalaki komibanzabanza. Amonaki ata Temwe moko ya lisangá na ye te kati na baoyo bakimaki bitumba. Azalaki komituna ‘Bazali wapi? Nasengeli kozonga mpo na koluka bango?’ Kasi kosala bongo ezalaki likama. Batomboki mingi bazalaki bato ya ekolo Bosnegers. Akanisaki boye ‘soki basoda ya Leta bakuti ngai nazali koleka na zamba bakoboma ngai.’ Ata bongo, azuaki likatami ya kozonga mpo na koluka bandeko na ye baklisto. Ntango akendeki, alobaki na Batemwe ya mboka Guyane française ete: “Poso ekoya, boya koluka ngai na ngambo mosusu ya ebale.”
Poso moko nsima, batemwe oyo bakatisaki ebalé, kasi bakutanaki na Frans te. Bazelaki kino mokolo elandaki. Frans ayaki kaka te. Bazuaki likatami oyo, “tozela butu mosusu eleka”. Nsima bamonaki Frans kobima elongo na etuluku ya Batemwe. Nini ekomelaki ye?
Yoka oyo Frans ayebisaki nsima: “Ntango nazuaki bandeko, tolekaki esika bitumba bizalaki, mpe tokotaki na zamba na kotalaka ndelo.” Kasi, mpo na nini boumeli oyo? Na kolakisaka cartons misato oyo ayaki na yango, Frans apesaki ntina: Akendeki kino na kapitale kozua mikanda mpo na batemwe oyo bakimaki bitumba. Bandeko oyo bayokaki ye koloba basepelaki mingi. Mokolo bobele yango, Frans mpe Batemwe, na bolamu nyonso, bakatisaki ndelo kozanga kotungisama, na ba cartons misato.
Nsima, Frans asalaki mobembo mosusu mpo na kosalisa Batemwe mosusu. Na nsuka na yango, Batemwe 37 bakatisaki ndelo mpe bakendeki kofanda na camps ya bato oyo bakimaki bitumba. Frans atiamaki na esika oyo kala bato na maba bazalaki kofanda na mboka Guyane française, epai kuna bato bakima bitumba bazali komona ete bazali kosala eloko moko te bobele kosakana mpe koboma bangungi.
Kasi Frans na libota na ye bazangaki mosala te. Mwa nsima moke bakomaki na camp, Frans (oyo akomaki tata ya bébé moko ya mwasi) amipesaki na kosakola nsango malamu na Bokonzi epai na bato bakimaki bitumba. Lokola azalaki na bopusi malamu, bapesaki ye nzela ya kobimaka na tukutuku mpo na kosakola na ba camps mosusu. Mosala na ye ebotaki mbuma, mpo ete sikawa azali kotambwisa boyekoli na Biblia 14 elongo na bato oyo bakimaki bitumba, mpe misato kati na bango basili kozwa batisimo.
Awanganaki kondima na ye te
“Nakozonga nsima na poso mibale elongo na biloko na kolia”, elobaki Victor Wens, pionnier spécial ya mbula 58, ntango azalaki kokabwana na mwasi na ye mpe bayekoli na Biblia mosusu, kati na mboka ya centre ya Suriname. Ezalaki na Juin 1987, mpe azalaki kokende na kapitale.
Ntango mwasi na Victor mpe bafandi mosusu bazalaki kolaka ye, loso na bango etikalaki moke esila. Batomboki bakangaki nzela mpe biloko na kolia ezalaki kokomela bango te. Nzala ekomelaki bango. Kasi, bayebaki ete Victor azalaki koteka bomoi na ye na kosalaka mobembo wana na bwato. Akokaki kokwea katikati na bitumba to bakokaki kokanisa ete azali moko na batomboki. Ntango makelele na mindoki ezalaki koyokana na mosika, bazalaki komituna ‘akozongoza malamu’?
Nsima na poso mibale, mwasi ya Victor azalaki kotalatala na ebalé, kasi Victor azalaki komonana te. Baposo mingi elekaki. Bilei bisilaki, mpe abelaki maladi. Abondelaki boye: “S’il te plaît, Jéhovah, batela mobali na ngai. Sala ete akoka kozonga!” Sanza misato elekaki. Victor azongaki kaka te. Eloko nini ekomelaki ye?
Victor ayebisaki yango nsima: “Ntango nakomaki na kapitale, napesamaki nzela ya kosomba bilei mpe essence mpo na sanza motoba. Nsima nasengaki nzela mpo nazonga epai na ngai. Mokonzi na basoda ayebisaki ngai ete: ‘Okoki kokende, bobele soki oluki epai bato- mboki bazali mpe oya koyebisa biso.’ Nalembaki kati na motema. Nalobaki na ye ete: ‘Nakoki kosala likambo wana te, Jéhovah alingi te ete tomikotisa na politike. Biso ba Témoins de Jéhovah, tokotaka te na makambo ya mokili.’ Mokonzi azongisaki ete: ‘Soki ezali bongo okokende te.’
“Poso na poso, nazalaki kosenga nzela, kasi eyano nazuaki ezalaki bobele yango. Na kati wana, nazuaki nsango ete mwasi na ngai azalaki maladi. Nalingaki kozonga epai na ngai mpo na kosunga ye. Lisusu nalingaki te kowangana kondima na ngai. Natambolaki moto.
“Ntango nazongaki mbala mosusu kosenga nzela, na kokamwa nyonso bapesaki ngai yango, na koyebisaka ngai ete ba pasteurs pentekotiste na régió na ngai bazuaki nzela ya kozonga epai na bango, mpe ete nakoki kokende na bango elongo. Nasepelaki mingi, mpe nabandaki komibongisa mpo na mobembo wana nayokaki moninga na ngai koyebisa ete bakonzi na mangomba yango bandimaki kozala banongi. Lokola nalingaki te kopesa likanisi ete ba Témoin de Jéhovah basalaka mpe bongo, nasalaki mobembo yango lisusu te. Lisusu, nazwamaki.”
Nsuka na yango, bakonzi bamonaki ete Victor akokaki kowangana bindimeli na ye te. Na lisengi na ye mosusu, bapesaki ye nzela.
Na nsuka, na Octobre 1987, etuluku moke ya Batemwe bayokaki makelele ya moteur ya bwato oyo ezalaki kobelema: ezalaki bwato, etondaki na biloko. Victor alobaki: “Nayokaki mpasi mingi ntango namonaki mwasi na ngai. Akondaki makasi. Ata bongo, ye mpe asepelaki mingi lokola nawanganaki kondima na ngai te.”
Mokengeli moko na zongazonga oyo akokisaki mosala na Nzambe na centre ya mboka oyo alobaki: “Etelemelo ya molende ya Victor ezalaki matomba mpo na biso. Basoda mpe batomboki bayebaki ete Ba Témoins de Jéhovah bakotaka na makambo ya mokili te. Sikawa bazali komemya makanisi na biso, mpe mosala na biso mpo na Nzambe ezali kokola.”
Babalani mokolo na misato bazui batisimo mokolo na poso
Basangani na mabota na bango bazalaki koloba makasi ete: “Bozala bazoba te. Bokomisa libala na Leta te!” Mibali motoba na ekolo ya ba bosnegers na Aucaner, na sud-est na mboka, bayebaki mayoki na basangani na mabota na bango. Nakotala malamu, bonkoko na ekolo na bango elingi te ete mibali bakoka kokomisa libala na Leta, mpo bakoka kotika basi na bango ntango nyonso oyo bango balingi. Kasi, na koyebaka na nzela na boyekoli na bango ya Biblia likanisi ya Jéhovah mpo na oyo etali pite, mibali oyo batalelaki lolenge na bango ya komonela makambo, batikaki te kopusama na mabota na bango mpe na molende nyonso bazuaki makatami ya kosala oyo ebongi, elingi koloba kokomisa libala.
Kasi bakutanaki na mikakatano. Biro ya Etat civil na bamboka ekangamaki na ntina etali bitumba, mpe kokende na kapitale ekokaki mpenza kosalema te. Lisusu, basi motoba oyo bazalaki fiansé balingaki kolata ba robes ya solo ya babalani mokolo ya libala. Ezali te ete robe oyo ezali ntina mpo na baklisto basib; kasi balingaki yango mpo ete kolata motindo wana ezali na ntina epai na bato ya régié wana. Mibali bazalaki komituna: ‘Bongo tokozua ba robes ya libala epai wapi na kati ya zamba oyo?’ Na nsuka, likatami na bango ya molende mpe na boyokani na mitinda ya Biblia ememelaki bango matomba. Mokolo na misato 16 septembre 1987, basi motoba, oyo balataki ba robes kitoko, babalanaki na mibali motoba baoyo balataki bakazaka kitoko. Basalaki ndenge nini?
Tala ndimbola oyo Daniel van Marl, moko na baministres ya zongazonga baoyo basalaki ba diskur ya mabala yango apesaki: “Na septembre, tobongisaki assemblée moko ya district na Saint-Laurent, na Guyane française, mpe tobengisaki Batemwe oyo bazalaki na bamboka ya Suriname. Assemblée oyo epesaki libaku ete mabala oyo esalema.”
Cecyl Pinas, mosangani na Comité ya filiale mpe oyo azali kokamba mosala na kati ya mboka, apesi ndimbola oyo: “Mwa liboso moke na mbula wana, nakendeki kotala libota ya Béthel na mokili ya Pays-Bas, mpe nasololaki mpo na mabala oyo mazalaki kobongisama. Nsima wana nalobaki ete na Suriname ezali bobele robe moko ezali kosalema na babalani nyonso, ntango nyonso koyeisa yango monene to moke mpo na oyo akolata yango, baklisto minei ya basi na Béthel bapesaki ngai mbala moko barobes na bango mpo na kopesa kadó epai na ‘bandeko na bango ya basi’ ya Suriname. Likambo yango esimbaki motema na ngai. Nsima lisusu, na assemblée mosusu na Pays- Bas, bapesaki ngai lisusu ba robes mosusu.”
Na ntongo ya mokolo ya libala, mwa makambo ya mikemike esengelaki kosalema mpo na kobongisa ba robes. Margreet van de Reep ayebisi: “Na mbala moko, toyeisaki ba robes mosusu minene mpe tobongolaki molai na mosusu engebene balati kasi nyonso ebongisamaki na ntango ekoki.”
Ntango milulu ya libala misilaki, babalani mitano kati bango bazalaki pene mpo na kosala litambe mosusu ya ntina. Mokolo na samedi na poso bobele wana, bazuaki batisimo kati na ebalé Maroni. Lokola babalanaki, bamonaki ete basengelaki kozonga nokinoki na mboka na bango kati na zamba mpo na kosakola nsango malamu. Jéhovah apambolaki makatami na bango?
Tala makanisi ya Nel Pinas, oyo azalaki moto ya liboso kosakola kati na régió oyo na 1967: “Babalani oyo balakisaki na bato na ekolo na bango ete tozali kosalela oyo tozali kosakola. Ekateli na bango ya kobalana mpo na kozala baklisto ya solo elamusaki kosepela na bafandi na bamboka oyo ezali mosika. Sikawa, Batemwe ya régió oyo bazali kokota na babwato na bango oyo ezali na moteur kati na mingalá epai naino tosakolaki te, mpe bazali lisusu kokutana na bato mingi baoyo bazali na mposa na koyeba Nzambe.”
Ntembe ezali te, makatami ya molende ya Lumey, ya Frans, ya Victor mpe bamosusu mingi mamemi matomba mingi, epai na bango moko mpe baninga na bango baklisto na mokili ya Suriname mpe bipai mosusu. Makambo lokola yango mamonisi lisusu bosolo na lisese oyo na Biblia: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba mpe ndima bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndima ye mpe akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala lisolo “‘Bolukaka kimia mpe bolanda yango’”, na Mosenzeli ya 15 octobre 1984, nkasa 21 kino 26.
b Tala lisolo Libala ezali molulu ya esengo epai ya baklisto, kati na Mosenzeli ya le 15 juillet 1985, nkasa 8 kino 13.
[Karte/Elilingi na lokasa 24]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
ATLANTIC OCEAN
GUYANA
SURINAN
PARAMARIBO
Tamanredjo
Moengo
St.Laurent
Maroni River
FRENCH GUIANA
BRAZIL
300 km
200 mi
[Elilingi na lokasa 25]
Bafoto mibale ya Salle du Royaume moko kitoko mwa mosika na kati ya mboka
[Elilingi na lokasa 26]
Lolenge ya bwato oyo basalelaka na Suriname