Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 154
  • Biblia eteyaka ete mabele ezali patatalu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia eteyaka ete mabele ezali patatalu?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Biblia elingi mpenza koloba nini ntango elobi “nsuka ya mabele”?
  • Bongo ntango Satana amekaki Yesu?
  • ‘Tótemela Zabolo’ ndenge Yesu asalaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tozwa liteya na komekama na Yesu
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Tozwá liteya na ndenge oyo Yesu alongaki komekama
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Zabolo ameki Yesu
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 154
Balakisi mabele lokola nde ezali patatalu

Biblia eteyaka ete mabele ezali patatalu?

Eyano ya Biblia

Te, Biblia eteyaka te ete mabele ezali patatalu (plat).a Atako Biblia ezali buku ya siansi te, kasi ezali na esika moko te oyo Biblia eboyi makambo ya siansi elobi. Makambo oyo Biblia elobi “esimbami malamu mpo na libela, mpo na seko.”​—Nzembo111:8.

  • Biblia elingi mpenza koloba nini ntango elobi “nsuka ya mabele”?

  • Bongo ntango Satana amekaki Yesu?

Biblia elingi mpenza koloba nini ntango elobi “nsuka ya mabele”?

Maloba “nsuka ya mabele” mpe “bansuka ya mabele” oyo Biblia esaleli esengeli te kozwa kaka ndenge ekomami, lokola nde mabele ezalaka kare to ezalaka na bansuka. (Yisaya 11:12; Yobo 37:3) Kutu, emonani ete yango ezali kaka elobeli mpo na komonisa mabele mobimba. Biblia esaleli mpe makambo minei mpo na komonisa likambo yango.​—Luka 13:29.

Ebengeli ya Ebre oyo ebongolami na “nsuka” to “bansuka” ezali lokola maloba ya elilingi oyo euti na liloba oyo ebongolamaka na “mapapu.” Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia), elobi ete “lokola mapapu ya ndɛkɛ esalemaka mpo na kozipa bana na yango, [ebengeli yango ya Ebre] esalemi mpo na kolobela oyo esembolami.” Kaka na buku yango ebakisi ete na Yobo 37:3 mpe Yisaya 11:12, “ebengeli yango elimboli bokula, bandelo to bansuka ya etando ya mabele.”b

Bongo ntango Satana amekaki Yesu?

Mpo na komeka Yesu, “Zabolo amemaki ye lisusu na ngomba moko ya molai mingi mpenza, mpe alakisaki ye makonzi nyonso ya mokili ná nkembo na yango.” (Matai 4:8) Bato mosusu balobaka ete lisolo oyo ya Biblia emonisaka ete mokili mobimba emonanaka na esika ya sikisiki na mabele oyo ezali patatalu. Kasi emonani ete na lisolo oyo, “ngomba moko ya molai mingi” ezali maloba ya elilingi kasi ezali te esika moko boye oyo moto akoki komona na miso. Tótala mpo na nini ebongi tóloba bongo.

  • Ezali na esika moko te awa na mabele epai makonzi nyonso ya mokili emonanaka.

  • Zabolo alakisaki Yesu kaka te makonzi nyonso, kasi mpe “nkembo na yango.” Makambo wana nyonso emonisi ete nkembo na yango ekoki te komonana na mosika mpenza; boye emonani ete Zabolo asalelaki mwa emonaneli mpo na kolakisa Yesu makambo yango. Yango ekoki kokokana na lolenge oyo moto akoki kosalela projecteur to a écran mpo na kolakisa moto mosusu bafɔtɔ ya bisika ndenge na ndenge na mabele.

  • Lisolo yango, ezali mpe na Luka 4:5 elobi ete Zabolo alakisaki Yesu “na mwa ntango moke makonzi nyonso ya mabele esika bato bafandi,” nzokande yango ekoki kosalema te na miso ya bomoto. Yango emonisi Zabolo asalelaki mayele mosusu mpo na kolakisa Yesu makonzi nyonso, kasi alakisaki ye yango boye te na miso.

a Biblia elobeli Nzambe lokola “Moto oyo afandi likoló ya zolongano ya mabele.” (Yisaya 40:22) Atako bato mingi ya mayele bandimaka yango, kasi liloba “zolongano” ekoki kolimbola mpe sɛrklɛ. Ata na lolenge moko te, Biblia elobaka ete mabele ezali patatalu.

b Buku oyo babongisi lisusu, Volimi 2, lokasa 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto