Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 155
  • Biblia elobi nini na likambo etali kokaba?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia elobi nini na likambo etali kokaba?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Ntango nini kokaba esepelisaka Nzambe?
  • Ntango nini kokaba esepelisaka Nzambe te?
  • “Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Ozali na elimo ya kokaba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Jéhovah alingaka baoyo bakopesaka na esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Kokaba epesaka matomba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 155
Mobali oyo asimbi kado

Biblia elobi nini na likambo etali kokaba?

Eyano ya Biblia

Biblia elobi tókabelaka basusu kozanga ete bátindika biso mpe tósala yango na makanisi malamu. Emonisi ete kokaba ndenge wana ezalaka mpo na bolamu ya moto oyo bakabeli mpe ya moto oyo akabi. (Masese 11:25; Luka 6:38) Yesu alobaki: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

  • Ntango nini kokaba esepelisaka Nzambe?

  • Ntango nini kokaba esepelisaka Nzambe te?

  • Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli kokaba

Ntango nini kokaba esepelisaka Nzambe?

Kokaba esepelisaka Nzambe ntango tokabi kozanga ete bátindika biso. Biblia elobi: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”​—2 Bakorinti 9:7.

Kokaba na motema moko ezali moko ya makambo ya “losambo oyo” Nzambe andimaka. (Yakobo 1:27) Moto oyo asalisaka mpenza baoyo bazali na bosɛnga, apesaka nde Nzambe mabɔkɔ mpe Nzambe amonaka ete moto yango adefisi nde ye. (Masese 19:17) Biblia eteyaka ete Nzambe ye moko akofuta moto yango.​—Luka 14:12-14.

Ntango nini kokaba esepelisaka Nzambe te?

Soki moto akabi mpo na koluka bolamu na ye moko. Na ndakisa:

  • Mpo azwa lokumu.​—Matai 6:2.

  • Mpo bázongisela ye.​—Luka 14:12-14.

  • Mpo asomba lobiko​—Nzembo 49:6, 7.

Soki ezali kolendisa misala to bizaleli oyo Nzambe ayinaka. Na ndakisa, ekozala mabe kopesa moto mbongo mpo abɛta masano ya mbongo, asalela drɔgɛ to mpe alangwa masanga. (1 Bakorinti 6:9, 10; 2 Bakorinti 7:1) Ndenge moko mpe, ekozala malamu te kokabela moto oyo azali na makasi ya kosala mosala kasi alingi kosala te.​—2 Batesaloniki 3:10.

Soki kokabela basusu ezali kosala ete tókipe libota na biso te. Biblia eteyaka ete bakonzi ya mabota basengeli kokokisa bamposa ya mabota na bango. (1 Timote 5:8) Ekozala malamu te mokonzi ya libota akabelaka basusu mingi koleka, kasi bato ya libota na ye bazali konyokwama. Ndenge moko mpe, Yesu apamelaki baoyo baboyaki kosalisa baboti na bango oyo bakómaki mikóló mpo bazalaki koloba ete nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki ‘likabo oyo bapesi Nzambe.’​—Marko 7:9-13.

Bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli kokaba

Masese 11:25: “Molimo oyo ekabaka ekokóma mafutamafuta, mpe moto oyo amwangiselaka bato mosusu mai mingi, ye mpe bakomwangisela ye mai mingi.”

Ndimbola: Kokaba ezalaka mpo na bolamu ya moto oyo bakabeli mpe ya moto oyo akabi.

Masese 19:17: “Ye oyo amoniselaka moto oyo azangá boboto azali kodefisa Yehova, mpe Ye akozongisela ye ndenge na ye wana ya kosala.”

Ndimbola: Nzambe amonaka ete azali na nyongo ya baoyo basalisaka baoyo bakelelá, mpe alaki ete akopambola bango.

Matai 6:2: “Ntango ozali kopesa makabo ya motema mawa, koyula kelelo liboso na yo te, ndenge bakosi basalaka . . . mpo bato bákumisa bango.”

Ndimbola: Tosengeli kokaba te kaka mpo na kobenda likebi ya bato.

Misala 20:35: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”

Ndimbola: Kokaba na motema moko epesaka esengo.

2 Bakorinti 9:7: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.”

Ndimbola: Kokaba kozanga ete bátindika yo esepelisaka Nzambe.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto