Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/11 nk. 8-9
  • Na elambo ya Mingombo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na elambo ya Mingombo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Masolo mosusu
  • Na elambo ya Mingombo
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Na Yerusaleme mpo na Fɛti ya Batabernakle
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • “Ntango na ye naino ekokaki te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te”
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/11 nk. 8-9

Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye

Na elambo ya Mingombo

NA BOUMELI ya mibu nyonso misato oyo milandaki batisimo na ye, Yesu azwaki lokumu. Bankoto na bato bazalaki komona bikamwiseli na ye mpe nsango ya misala na ye epalanganaki na mboka mobimba. Bato oyo bayangani sikawa na Yelusaleme mpo na Elambo ya Mingombo babandi koluka ye. Bazali kotunana: “Moto yango azali wapi?”

Ntembe monene ebimi na ntina na Yesu. Bamosusu balobi, “azali malamu”. Bamosusu ete, “te azali kokosa bibele.” Bazali mpenza koloba makambo ya motindo oyo na boumeli ya mikolo ya liboso ya elambo. Nzokande moto ata moko te azali na nguya ya kokamata ekateli ya polele mpo na kolanda Yesu, mpo ete bazali kobanga kozwa bitumbu na bakonzi na mangomba ya Bayuda.

Na katikati ya elambo, Yesu akomi. Amati na temple epai kuna akamwisi bato na lolenge na ye kitoko ya koteya. Lokola Yesu akotaki kelasi ya Balabi te, Bayuda bakamwi: “Ndenge nini moto oyo ayebi mikanda, ye moto ayekoli te?”

“Yesu azongiseli bango monoko mpe alobi ete, Mateyo na ngai mazali na ngai te kasi na Motindi na ngai. Soko moto nani azali na mposa ya kosala mokano na Ye, akoyeba mpo na mateya, soki mauti na Nzambe, soko nazali kosolola na motema na ngai moko.” Mateya na Yesu matongami nyonso likolo na mibeko na Nzambe. Esengelaki komonana polele epai na bato nyonso ete Yesu azali koluka lokumu ya Nzambe kasi lokumu na ye moko te. Yesu atuni ete: “Moïse apesaki bino Mibeko te?” Na nsima apameli bango na maloba oyo: “Moko te kati na bino azali kotosa Mibeko.”

Atuni bango mpe, “mpo na nini bozali koluka koboma ngai?”

Bayoki na ye, ekoki kozala bapaya bayaki mpo na elambo, bayebi eloko moko te mpo na mokano mabe motindo oyo. Bandimi te ete bato bakoki kokana koboma moteyi malamu oyo ayebani mingi boye. Yango wana bakanisi ete Yesu azali na ligboma. Balobi na ye, “Ozali na démo; nani azali koluka koboma yo?”

Ata bibele bayebi yango to te, bakonzi na mangomba bazali na likanisi ya kolimwisa Yesu. Mobu moko na ndambo kala, basilaki kokana koboma ye nsima wana ebikisaki ye moto moko mokolo na sabata. Sikawa Yesu amonisi polele kozanga boyokani ya makanisi na bango: “Soko moto akatami ngenga na mokolo na sabata, mpo ete Mibeko na Moise esopana te, mpo na nini boyokeli ngai nkanda ete napesi makasi na nzoto mobimba na moto na mokolo na sabata? Bokata kobila miso te kasi bokata na ekateli na sembo.”

Bafandi na Yelusaleme, bango lokola bayebi makambo nyonso, bazali komituna: “Ye moto oyo bazali koluka ye mpo na koboma ye te? Nde tala azali kosolola polele mpe bakoloba na ye te? Ezali solo ete mikoló basosoli ete ye oyo Klisto?” Na nsima balimboli mpo na nini baboyi kondima ete Yesu azali Klisto: “Kasi toyebi esika euti moto oyo; wana ekoya Klisto, moto moko akoyeba esika euti ye te.”

Yesu ayanoli bango na maloba oyo: “Boyebi ngai mpe boyebi esika euti ngai. Kasi nayei mpo na na ngai moko te, nde nayebi ye mpo ete nauti na ye mpe ye atindi ngai.” Na wana baluki kokanga ye mbala mosusu mpo na kotia ye na boloko to mpo na koboma ye. Kasi balongi te mpamba te ngonga ya liwa na Yesu ekomaki naino te.

Nzokande, bato mingi bandimi Yesu mpe ezali na bantina malamu mpo na yango. Mpamba te Yesu atambolaki likolo na mai, alembisaki mopepe, alembisaki mbonge ya ebale, aleisaki bankoto na bato na ekamwiseli, bobele na mwa mampa mpe mwa mbisi. Abikisaki mpe bato na bokono, atambolisaki bibosono, azipolaki miso na bakufeli-miso, abikisaki bato na maba, mpe asekwisaki ata bakufi. Na bongo bazali kolobana kati na bango: “Ekoya Klisto, akosala bilembo bileki yango ezali moto oyo kosala?”

Na ntango Bafalisai bayoki bato kolobana makambo nyonso oyo na mongongo ya nse to ya kokita, bango mpe mikoló na banganga batindi basoda mpo ete bakanga Yesu. Yoane 7:11-32.

◆ Ntango nini Yesu akomaki na elambo, mpe nini bazali koloba na ntina na ye?

◆ Ekoki kozala banani oyo balobi ete Yesu azali na démo?

◆ Bafandi na Yelusaleme bakanisi nini mpo na Yesu?

◆ Mpo na nini ebele na bato bandimi Yesu?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto