Solo na ntina na Baanzelu
Koyeba moto mbala mingi esangisi koyeba makambo matali libota na ye.Ezali bobele bongo mpo na oyo etali koyeba Yehova Nzambe. Yango esuki te bobele na koyeba nkombo na ye. Tosengeli lisusu koyeba makambo na ntina na “libota” na ye ya likoló. (Kokanisá na Baefese 3:14, 15.) Biblia ezali kobénga baanzelu “bana” ya Nzambe. (Yobo 1:6) Na ntina na mokumba monene oyo bazali na yango kati na Biblia, tosengeli koluka koyeba makambo mingi na ntina na bango mpo na kososola esika na bango kati na mokano ya Nzambe.
MOTINDO mosusu ya lolenge ya bomoi ezali kobima. Ezali te bobele ete bato mingi bazali koloba ete bazali kondimela baanzelu; kasi ebele na bato bazali ntango nyonso koloba ete na lolenge moko to mosusu baanzelu basalaki likambo moko mpo na bango. Ntango batunaki baamerikɛ́ 500 motuna, “Osilá yo moko koyoka bopusi ya anzelu moko kati na bomoi na yo?” Penepene na moto moko kati na bato misato ayanolaki ɛɛ. Lisusu, likambo ya kokamwa lizali motuya ya bilenge oyo bazali koloba ete bandimaka baanzelu—engebene bolukiluki moko oyo esalemaki na Etats-Unis, ezali motuya monene ya 76%! Ntembe ezali te, bato bazali kotya likebi mingi epai na baanzelu. Kasi lolenge nini likanisi ya ntango na biso oyo litali baanzelu lizali na boyokani na solo ya Biblia?
Kolɛmbisama ya mokumba ya Satana
Wana tozali kolobela baanzelu, tosengeli te kobosana baanzelu mabe, bikelamu ya likoló oyo Biblia elobi ete bitombokelaki Nzambe. Oyo aleki monene kati na bango ezali bongo Satana. Búku Ask Your Angels (Tuná baanzelu na yo), oyo eyebani mingi epesaki likanisi oyo ete Satana azali bobele “motindo mosusu ya bizaleli ya Nzambe” oyo azali kosunga bato na kopika “mpéndé [na bango] ya elimo” na nzela ya komekama ya mbala na mbala. Bakomi na búku yango balobi ete, ata “mokano ya bolingo” oyo Satana azali na yango, na boumeli ya bikeke mingi asili na libúngá nyonso komonisama lokola moto mabe. Babakisaki ete Satana mpe Yesu, “atako bazali mpenza kokokisana te sikisiki moko na mosusu, nzokande bazali na ngámbo moko, biteni mpenza ya eloko moko.” Oyo ezali maloba ya kokamwisa, kasi Biblia ezali koloba nini?
Biblia ezali komonisa polele ete Satana azali te “motindo mosusu ya bizaleli ya Nzambe” kasi azali nde monguna ya Nzambe. (Luka 10:18, 19; Baloma 16:20) Azali kotɛmɛla bokonzi monene ya Yehova, mpe mokano na ye epai na bato mozali na “bolingo” soko moke te. Na motema mabe nyonso azali kosilisa nkanda na ye likoló na basaleli ya Nzambe oyo bazali awa na mabelé. Afundaka bango liboso na Nzambe butu na moi!a (Emoniseli 12:10, 12, 15-17) Satana azali na mokano bobele moko ya kobebisa bango ata soki yango ekosɛnga nini. Monyoko ya nsɔ́mɔ oyo ayokisaki moto ya sembo Yobo mozali komonisa polele ezaleli na ye ya kozanga komonisa mawa liboso na mpasi ya basusu.—Yobo 1:13-19; 2:7, 8.
Satana mpe Yesu bazali soko moke te “na ngámbo moko,” bakeseni mpenza mosika moko na mosusu. Bongo, ezalaki solo Satana nde apusaki Elode na kobimisa mobeko ete báboma ebele ya bana mike—nyonso wana kati na milende na ye ya koluka koboma Yesu, wana azalaki naino mwana moke! (Matai 2:16-18) Mpe kobundisama makasi ya Satana elandanaki kino na kufa ya Yesu. (Luka 4:1-13; Yoane 13:27) Na yango, na esika ete bázala “biteni ya eloko bobele moko,” Yesu mpe Satana bakeseni mpenza. Bisakweli ya Biblia bimonisi ete bonguna esengelaki kozala kati na bango. (Genese 3:15) Na motindo mobongi mpenza, ezali Yesu oyo asekwisami nde akoboma Satana na elaka eponami na Nzambe.—Emoniseli 1:18; 20:1, 10.
Ebongi kobondela nani?
Bamoko na baoyo bazali kokumisa losambo ya baanzelu bakolendisaka momeseno ya komanyola mpe myango misusu mpo na kosolola elongo na baanzelu. Búku moko elobi ete: “Lisɛngi oyo liuti na motema mpo na kokutana elongo na mosangani moko ya libota ya likoló likozanga te koyokama. Sɛngá mpe bakopesa yo eyano.” Mikaele, Grabriele, Uriel, mpe Raphael bazali kati na baanzelu oyo búku yango etángaki nkombo na bango mpo na kosolola elongo na bango.b
Nzokande, Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe, kasi baanzelu te. (Matai 6:9, 10) Bobele bongo, Paulo akomaki ete: “Kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe.” (Bafilipi 4:6) Yango wana, kati na mabondeli na bango, baklisto basengeli kobɛlɛma na moto mosusu te kasi bobele na Yehova, mpe basalaka bongo na nkombo ya Yesu Klisto.c—Yoane 14:6, 13, 14.
Baanzelu bazali na lingomba te?
Engebene Eileen Elias Freeman, oyo akambaka lingomba AngelWatch Network, “baanzelu bazali likoló ya mangomba nyonso, ya filozofi nyonso, mpe ya bindimeli nyonso. Lolenge toyebi, baanzelu bazali na mangomba te.”
Nzokande, Biblia ezali komonisa polele ete baanzelu ya sembo bazalaka na lingomba; basambelaka Nzambe ya solo bobele moko, Yehova, oyo akondimaka soko moke te bombanda na banzambe mosusu. (Deteronome 5:6, 7; Emoniseli 7:11) Na yango, moko na baanzelu wana amimonisaki epai na ntoma Yoane lokola “moombo moninga” ya baoyo bazali kotosa malako ya Nzambe. (Emoniseli 19:10) Esika moko te kati na Biblia tozali kotánga ete baanzelu ya sembo bazali kopesa mabɔkɔ na lolenge mosusu ya losambo. Bapesaka Yehova bokangami na bango mobimba.—Exode 20:4, 5.
“Tata na lokuta”
Mingi na baoyo balobaka ete bakutanaki na baanzelu bamikɔtisaka na bosololi elongo na bakufi. Nsima ya kozwa oyo ye akanisaki ete ezalaki elembo, mwasi moko na nkombo Elise alobi ete: “Nazalaki koyoka lokola ete noko na ngai asilaki kozwa nzela ya kokutana na ngai mpe ya koyebisa ngai ete asilaki bongo kozwa bolamu.” Bobele bongo Terri amikundoli moninga na ye ya motema oyo akufaki. Ye alobaki ete: “Pɔ́sɔ moko nsima ya kokundama na ye, ayaki epai na ngai kati na oyo nakanisaki ete ezalaki ndɔ́tɔ. Ayebisaki ngai ete nasengelaki te kolela mpo na liwa na ye, mpamba te ye azali na esengo mpe na kimya.”
Kasi Biblia elobi ete bakufi “Bayebi [eloko] te.” (Mosakoli 9:5) Elobi lisusu ete wana moto moko akufi, “bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.” (Nzembo 146:4) Nzokande, Satana azali “tata na lokuta.” (Yoane 8:44) Ye azali mobandisi ya lokuta oyo, ete molimo ya moto ekufaka te. (Kokanisá na Ezekiele 18:4) Bato mingi lelo oyo bandimaka likambo yango, oyo ekokisi mpenza mokano ya Satana, mpamba te yango ezali koangana ntina ya kondima lisekwa—liteya ya moboko ya losambo ya boklisto. (Yoane 5:28, 29) Na yango, kotuna bakufi to oyo emonani lokola kozwa bansango euti epai na bango ezali bobele motindo mosusu ya losambo ya baanzelu oyo eboyami na Nzambe.
Bazali kosolola na baanzelu to na bademó?
Mingi na makambo matali losambo ya baanzelu mazali na boyokani na misala ya bilimu mabe. Talá likambo likómelaki Marcia. Alobi ete: “Kobanda Sɛtɛ́mbɛ kino Desɛ́mbɛ 1986, nabandaki kozwa bansango longwa na ‘mokili ya bilimu.’ Namonaki bimonaneli mpe nalɔ́taki bandɔ́tɔ ya kokamwisa na ntina na ‘bomoi ya ngai ya kala.’ Nakutanaki na baninga oyo basilaki kokufa mpe nazwaki myango mingi ya bilimu oyo na nzela na yango nayebaki makambo mingi na ntina na bato oyo nakutanaki na bango bobele mpo na ntango mokuse. Nazwaki mpe mapamboli ya likabo ya kokomana elongo na bilimu mpe ya kozwa bansango na bango. Bato mosusu, oyo nakutanaki na bango ata mbala moko te na ntango bazalaki na bomoi awa na mabelé, bazalaki kotinda bansango epai na bato mosusu na nzela na ngai.”
Kosalela soloka mpo na “kosolola” elongo na baanzelu esalelamaka mpe mingi. Búku moko ezalaki kolendisa batángi na yango na kosalela mabángá ya bikelákela, bakálati mpo na kosakola makambo, mosolo ya ebende I Ching, kotala banzela ya mabɔkɔ mpo na kosakola makambo mpe astroloji. Bakomi na yango bakomaki ete: “Mpe ondimisama ete anzelu moko akokutana na yo kuna.”
Nzokande, engebene Biblia moto nyonso oyo ‘akokutana na yo kuna’ azali anzelu ya Nzambe soko moke te. Mpo na nini? Mpamba te misala ya soloka mizali mpenza kotɛmɛla Nzambe, mpe basambeli ya solo—na likoló mpe na mabelé—bazali na boyokani moko te na yango. Na Yisalaele, misala ya soloka mizalaki lisumu monene! Mobeko molobaki ete, “bato nyonso na kosala makambo oyo bazali mbindo na miso na [Yehova].”—Deteronome 13:1-5; 18:10-12.
“Anzelu ya pole”
Tosengeli kokamwa te ete Zábolo akoki kosala ete soloka emonana lokola ezali na matomba, to lokola euti na baanzelu. Biblia ezali koloba ete Satana “akomimonisaka lokola ntoma na moi.” (2 Bakolinti 11:14) Akoki ata kobongisa misala ya kokamwisa mpe kosala ete mikokisama, kozimbisáká bato oyo bazali komona yango mpo bákanisa ete bilembo yango biuti na Nzambe. (Kokanisá na Matai 7:21-23; 2 Batesaloniki 2:9-12.) Kasi misala nyonso ya Satana—ata soko yango ekoki komonana malamu boni to mabe boni—mizali kokokisa moko na mikano oyo mibale: kopɛngwisa bato longwa na Yehova to bobele kozimbisa makanisi na bango mpo ete ‘pole ya nsango malamu ya nkembo na ntina na Klisto engɛngɛla bango te.’ (2 Bakolinti 4:3, 4) Mbala mingi mwango ya kozimbisa nde elóngaka malamu koleka.
Talá lisoló ya Biblia na ntina na elenge mwasi moko mosaleli na ekeke ya liboso. Mosala ya koyebisa makambo makoya nsima oyo azalaki kosala mozalaki kopesa mosolo mingi epai na bankolo na ye. Na boumeli ya mikolo mingi azalaki kolanda bayekoli, mpe konganga ete: “Bato oyo bazali baombo na Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, bango bazali kosakwela bino nzela na lobiko!” Maloba na ye mazalaki solo. Nzokande, lisoló yango liyebisi biso ete azalaki na anzelu te, kasi na “[elimo] na kosakola.” Na nsima, Paulo “abongwani koloba na [elimo] yango ete, Nazali kolaka yo na nkombo na Yesu Klisto ete obima na ye. Abimi na ntango yango mpenza.”—Misala 16:16-18.
Mpo na nini Paulo abimisaki elimo wana? Ezalaki kokɔtisa mosolo mingi epai na bankolo ya mwana mwasi yango. Na nzela ya nguya oyo eleki makasi ya bato, elenge mwasi yango akokaki koyebisa basáli-bilanga eleko malamu ya kolóna, koyebisa baseka ntango nini bakokaki kobala, mpe epai wapi baluki makɛ́lɛ bakokaki komona wolo. Elimo wana etindaki mpe elenge mwasi yango na koloba mwa maloba ya solo, kokumisáká polele bayekoli!
Nzokande, ezalaki “[elimu mabe] ya kosakola.” Na bongo, ezalaki na lotómo te ya koyebisa makambo na ntina na Yehova mpe bibongiseli na ye mpo na kobikisa bato. Maloba na ye ya makumisi, oyo mbala mosusu mapesamaki mpo na kondimisa bisakweli oyo elenge mwasi yango azalaki koyebisa, mazalaki kolongola likebi ya bato epai na bayekoli ya solo ya Klisto. Na ntina mpenza, Paulo akebisaki Bakolinti ete: “Bokoki komela na kɔ́pɔ na Nkolo mpe na kɔ́pɔ na [bilimu] mabe te.” (1 Bakolinti 10:21) Ezali bongo likambo ya kokamwa te soki baklisto ya ekeke ya liboso batumbaki babúku na bango nyonso oyo ezalaki na boyokani na makambo ya soloka.—Misala 19:19.
“Anzelu oyo azali kopumbwa na nzánga”
Lokola tosili komona yango, Biblia ezali kotɔndɔla ntálo monene ya losambo ya baanzelu na mikolo na biso ete ezali na boyokani ya penepene elongo na Monguna ya Nzambe, Satana Zábolo. Yango elingi koloba ete baanzelu basantu bazali na bopusi te likoló na makambo ya bato? Ezali bongo te, bazali sikawa kokokisa mosala moleki nguya oyo mozali kosalema na mabelé. Mosala yango mozali nini? Mpo na koyanola na motuna oyo tosengeli kotala kati na mokanda ya Emoniseli. Baanzelu balobelami kati na mokanda wana mbala mingi koleka mikanda misusu nyonso ya Biblia.
Kati na Emoniseli 14:6, 7, tozali kotánga makambo oyo ntoma Yoane akomaki na ntina na emonaneli moko ya esakweli oyo ye amonaki: “Namonaki [anzelu] mosusu kopumbwa na nzánga, mpe azalaki na Nsango Malamu na seko mpo na kosakola na bafandi na mokili mpe na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na bikólo nyonso. Alobi na mongongo makasi ete, Bómemisa Nzambe mpe pesá ye nkembo, mpo ete ntango na kosamba na ye eyei. Bósambela ye oyo asalaki likoló, na nsé, na mai monene, na mitó na mai.”
Mokapo oyo mozali komonisa ntina ya mosala ya liboso ya baanzelu na mikolo na biso. Bazali na boyokani na mokumba oyo mozali na esika ya liboso—oyo ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Ezalaki na ntina na mosala yango nde Yesu alakaki bayekoli na ye ete: “Ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka na ekeke.” (Matai 28:18-20) Lolenge nini Yesu azali elongo na bayekoli na ye? Lolenge moko ezali bongo ya kopesa bango lisalisi ya baanzelu mpo ete mosala wana monene mokoka kokokisama.
Batatoli ya Yehova bazali kolekisa bangonga koleka miliare moko mbula na mbula mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Wana bazali kokokisa mosala yango, bazali komona bilembeteli ya lisungi ya baanzelu. Kati na mosala na bango ya ndako na ndako, mbala mingi emonanaki ete bakutanaki na bato oyo bautaki kobondela mpo ete moto moko asalisa bango mpo na kososola mokano ya Nzambe. Litambwisi ya baanzelu, elongo na elimo ya koyeba kobanda mosala oyo Batatoli yango bamonisaki, esili kopesa mbula na mbula boyebi ya Yehova epai na bankóto mingi ya bato!
Ozali koyoka anzelu oyo azali kopumbwa na nzánga? Wana Batatoli ya Yehova bayei epai na yo, mpo na nini te kosolola mozindo elongo na bango na ntina na nsango ya anzelu wana?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba “Satana” mpe “Zábolo” malimboli “motɛmɛli” mpe “motɔ́ngi.”
b Wana Mikaele mpe Grabriele balobelami kati na Biblia, nkombo ya Raphael mpe ya Uriel ezali komonana bobele kati na babúku oyo babéngi Apokrife, to yango endimami te kati na mikanda ya Biblia oyo mipemami.
c Yebá ete libondeli litindami na nkombo na Yesu, kasi epai na ye te. Libondeli lipesami na nkombo ya Yesu mpamba te makila na ye oyo masopamaki mafungolaki nzela ya kobɛlɛma epai na Nzambe.—Baefese 2:13-19; 3:12.
[Etanda na lokasa 8]
BAANZELU BAZALI BANANI?
NA KOKESANA na oyo bato mingi bakanisaka, baanzelu bazali te milimo ya bato oyo basili kokufa. Biblia elobi polele ete bakufi “bayebi [eloko] moko te.” (Mosakoli 9:5) Bongo, baanzelu bautaki epai wapi? Biblia ezali komonisa ete bazali bikelamu ya bomoi oyo bizalisamaki na Nzambe liboso ya kozalisama ya mabelé. (Yobo 38:4-7) Ekoki kozala ete libota ya Nzambe na likoló lizali na ebele ya bamilió ya baanzelu, mbala mosusu ata bamiliare mingi! Baanzelu mosusu basanganaki na Satana kati na botomboki na ye.—Danyele 7:10; Emoniseli 5:11; 12:7-9.
Lokola Yehova azali Nzambe ya mobulu te, ezali likambo ya kokamwa te ete libota na ye ya baanzelu libongisami malamu.—1 Bakolinti 14:33.
• Anzelu ya liboso, ezala na nguya to na bokonzi, ezali bongo mokóló ya baanzelu, Yesu Klisto, oyo abyangami mpe Mikaele. (1 Batesaloniki 4:16; Yuda 9) Basɛrafɛ́, bakeluba, mpe baanzelu bazali na nsé ya bokonzi na ye.
• Basɛrafɛ́ bazali kosala na kiti na bokonzi ya Nzambe. Emonani polele ete mokumba na bango motali kosakola bosantu ya Nzambe mpe kobatela bato na ye pɛtɔ.—Yisaya 6:1-3, 6, 7.
• Bakeluba bamonanaka mpe liboso na Nzambe. Lokola bamemi to balandi ya kiti ya bokonzi ya Nzambe, bazali kosimba bonene ya Yehova.—Nzembo 80:1; 99:1; Ezekiele 10:1, 2.
• Baanzelu (elimboli “bamemi nsango”) bazali basáli mpe batindami ya Yehova. Bakokisaka mokano ya Nzambe, ya kobikisa bato na ye to ya kobebisa bato mabe.—Genese 19:1-26.
[Bililingi na lokasa 7]
Ozali koyoka anzelu oyo azali kopumbwa na nzánga?