Salelá Biblia malamu
1. Okoki kosala nini mpo na komibongisa liboso ya kokenda na mosala ya kosakola?
1 Ata soki tolingi kolakisa mokanda nini na mosala ya kosakola, ekozala malamu kopona vɛrsɛ moko oyo ekosimba mpenza mitema ya bato oyo bakoyoka. (Ebe. 4:12) Soki oponi vɛrsɛ moko oyo ezali na mokanda oyo ozali kolakisa, yango ekopesa yo nzela olakisa mokanda yango malamu. Na bisika mosusu, basakoli bamonaka malamu kosimba Biblia na mabɔkɔ ntango balingi kosolola na moto moko to ntango bazali kosakola ndako na ndako.
2. (a) Ndenge nini tokoki kobanda lisolo na biso na vɛrsɛ moko ya Biblia? (b) Masolo nini ya Biblia esepelisaka bato ya teritware na bino?
2 Bandá lisolo na vɛrsɛ ya Biblia: Mpo na kobanda lisolo, basakoli mosusu batunaka moto oyo balingi kosolola na ye apesa likanisi na ye mpo na vɛrsɛ oyo balingi kotánga, mpe na nsima batángaka vɛrsɛ yango. Yango ebendaka mbala moko likebi ya moto yango na Liloba ya Nzambe. Maloba ya kobanda lisolo oyo ezali awa na nse ebongi mpo na teritware na bino?
◼ “Soki ozalaki na likoki ya kosala makambo oyo, olingaki kosala yango?” Tángá Emoniseli 21:4.
◼ “Mpo na nini na mikolo na biso bomoi ezali mpasi boye?” Tángá 2 Timote 3:1-5.
◼ “Okanisi ete mboka na biso ekozala malamu koleka soki bato nyonso basaleli toli oyo?” Tángá Matai 7:12.
◼ “Okanisi ete bana na yo bakoki kozala na bomoi lokola oyo balobeli awa?” Tángá Nzembo 37:10, 11.
◼ “Okanisi mpenza ete mokolo mosusu maloba oyo ekokokisama?” Tángá Yisaya 33:24.
◼ “Osí oyoká mbongwana ya guvernema lokola oyo balobeli awa?” Tángá Danyele 2:44.
◼ “Okanisá naino te kotuna Nzambe motuna oyo?” Tángá Yobo 21:7.
◼ “Tokoki mpenza komona lisusu bandeko na biso oyo bakufá?” Tángá Yoane 5:28-29.
◼ “Bato oyo bakufá bayebaka makambo oyo bato ya bomoi bazali kosala?” Mosakoli 9:5.
3. Ndenge nini tokoki kosalisa bato bákanga ntina ya bavɛrsɛ oyo tozali kotánga?
3 Limbolá, pesá ndakisa, monisá ndenge ya kosalela yango: Soki moto andimi bósolola, komema lisolo mbangumbangu te. Zwá ntango ya kolimbolela ye vɛrsɛ oyo botángi, pesá ye ndakisa moko mpe monisá ye ndenge ya kosalela likambo oyo vɛrsɛ yango elobi mpo akanga ntina na yango. (Neh. 8:8) Soki bato bakangi ntina ya makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koteya mpe bandimi yango, ekoki kotinda bango básala mbongwana ya malamu na bomoi na bango.—1 Tes. 2:13.
4. Ndenge nini tokoki kosalela Biblia malamu ntango tozali kozongela bato?
4 Kobá kosalela Biblia malamu ntango ozali kozongela bato oyo basepelaki . Okoki mpe kosalela mayele lokola oyo ntango ozali kozongela bato: (1) Poná vɛrsɛ moko oyo ebongi. (2) Tuná motuna moko oyo ekosɛnga moto apesa likanisi na ye mpo na vɛrsɛ yango. Na nsima tángá yango. (3) Limbolá, pesá ndakisa, mpe monisá ndenge ya kosalela likambo oyo vɛrsɛ yango elobi. Mbala nyonso oyo ozali kozongela moto, salá makasi obakisela ye likambo moko ya sika mpo na kokolisa boyebi na ye ya Liloba ya Nzambe. Soki ozali kosala bongo, okoumela te kotambwisa boyekoli ya Biblia!