Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Mobembo ya kobombama na Yelusaleme
Tokomi na mobu 32, mpe elambo na Mingombo ebelemi. Uta Bayuda bamekaki koboma Yesu, na Pake ya mobu 31, Yesu atye likebi na ye mingimingi epai na Galilai. Azongi lisusu na Yelusaleme te, longola bobele mpo na kokende koyangana na bilambo misato ya Bayuda oyo ekosalemaka mbula na mbula.
Sikawa, bandeko na ye balobi na ye ete: “Longwa awa mpe kenda na Yuda.” Yelusaleme ezali engumba eleki monene kati na mboka mpe esika ya losambo. Bandeko na ye bakanisi boye: “Moto akosalaka makambo na nkuku te wana elingi ye koyebana polele.”
Ata bango moko bazali kondima te ete Yesu azali Masiya, Jacques, Simon, Joseph mpe Judas balingi ete nkulutu na bango akenda kolakisa nguya na ye ya bikamwiseli epai na bato mingi oyo bakoyangana na elambo. Kasi Yesu azali koyeba likama oyo ekoki kobima. “Bamokili bayebi koyina bino te nde bazali koyina ngai mpo ete nazali kotatola mpo na bango ete misala na bango mizali mabe.” Mpo na yango, Yesu alobi epai na bandeko na ye boye: “Bino bobuta na elambo. Ngai nakobuta na elambo oyo te.”
Elambo na Mingombo eumelaka mikolo nsambo mpe esilaka mokolo mwambe. Esukisaka mobu ya baloni; ezali eleko ya esengo mpe matondi. Mikolo mingi nsima wana bandeko na ye bakendaki elongo na bato mingi na mobembo yango, Yesu mpe bayekoli na ye bakei na nkuku mpe bamonani epai na bato te. Bakei na nzela na Yordani te, nzela oyo bato mingi bakendaka na yango kasi bakatisi Samaria.
Lokola basengeli kotelema na mboka moko ya Basamaria, Yesu atindi bato liboso na ye mpo na kosala mwa bibongiseli. Kasi bato baboi kosala ata likambo nini mpo na ye wana bayoki ete azali kokenda na Yelusaleme. Jacques mpe Jean basiliki mpo na yango, mpe balobi na Yesu: “Nkolo, olingi ete tobyanga móto na likolo ekita mpe eboma bango?” Yesu apameli bango mpo na yango, mpe bakei na mboka mosusu.
Wana ezali bango kokenda, mokomeli moko alobi epai na Yesu: “Soko okokenda wapi, nakolanda yo.”
Yesu alobi na ye ete: “Gambala bazali na mabulu, mpe ndeke na zamba bazali na bibombamelo, nde Mwana na moto azali na esika na kolalisa motó na ye te.” Yesu amonisi bongo epai na mokomeli yango ete mikakatano mizali kozela ye soko akomi moyekoli na ye. Emonani lokola moto yango azali na lolendo mingi na boye ete akoki te kondima bomoi motindo wana.
Yesu abengi moto mosusu: “Landa ngai!”
Kasi moto yango ayanoli: “Pesa nzela liboso ete nakenda kokunda tata na ngai.”
Yesu alobi na ye: “Tika bakufi kokunda bakufi na bango mpenza, nde yo kende kosakola Bokonzi na Nzambe.” Tata na moto yango akufaki naino te, mbele mwana na ye alingaki kozala na esika wana te, mpo na koyoka Yesu. Alingaki nde kosenga nzela epai na Yesu mpo azela kino tata na ye akokufa. Azalaki pene te mpo na kotya Bokonzi na esika ya liboso kati na bomoi na ye.
Yesu mpe bayekoli na ye balandi mobembo na bango mpo na kokenda na Yelusaleme. Moto mosusu alobeli ye boye: “Nkolo, nakolanda yo, nde tika natikana na bango bazali na ndako na ngai liboso.”
Mpo na eyano Yesu alobi na ye: “Moto oyo atii loboko na etimeli mpe azali kotala na nsima abongi na Bokonzi na Nzambe te.” Baoyo balingi kokoma bayekoli na Yesu basengeli kotya miso na bango na mosala ya Bokonzi. Lokola mosali na bilanga akoki kosala banzela etengama soko atiki kotala liboso na ye, ye oyo akotala nsima na ye, epai na biloko mabe na ntango oyo, akoki mpenza kopengwa na nzela oyo ezali komema na bomoi. Yoane 7:2-10; Luka 9:51-62; Matai 8:19-22.
◆ Tanga nkombo ya bandeko ya Yesu, mpe bakanisi nini mpo na ye?
◆ Mpo na nini Basamaria baboi koyamba Yesu, mpe Yakobo na Yoane balingi kosala nini?
◆ Na nzela, masolo nini misato, Yesu asololi na bato, mpe ndenge nini Klisto amonisi ntina ya kosalela Nzambe na elimo ya komipesa?